Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 4:26 - Mokanda na Bomoi

26 Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela, mpe tambola kaka na nzela oyo oyebi malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 4:26
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete nabongisa etamboli na ngai mpo ete natosa mitindo na Yo !


Natali malamu etamboli na ngai mpe namizongisi kati na malako na Yo.


Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto, alendisaka bomoi na ye ;


Natiaki elikya na ngai kati na Yawe ; abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.


Bozoba esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi moto ya mayele atambolaka alima na nzela na ye.


Moto mabe akangaka elongi na ye, kasi moto ya sembo alendisaka nzela na ye.


Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya, batela motema na yo kati na nzela ya sembo.


Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso, mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.


Solo, nzela ya moto ezali liboso ya Yawe, mpe ayekolaka malamu makambo nyonso oyo moto asalaka.


Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi, alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.


Lokola asosoli mabe na ye nyonso oyo azalaki kosala mpe atiki yango, akozala solo na bomoi, akokufa te.


Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.


Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya.


Yango wana, bozalaka bazoba te, kasi bososolaka oyo ebengami mokano ya Nkolo.


Tika ete alendisa mitema na bino mpo ete bozanga pamela kati na bosantu liboso ya Nzambe mpe Tata na biso, na mokolo oyo Yesu, Nkolo na biso, akoya elongo na basantu na Ye nyonso ! Amen !


Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela bino liboso ya Satana.


Bosala banzela ya alima mpo na makolo na bino, mpo ete lokolo ya tengu-tengu elongwa te, kasi ebika nde.


Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ