25 Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso, mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.
« Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai ete nalula elenge mwasi te.
Longola miso na ngai na makambo ya pamba, batela bomoi na ngai kati na banzela na Yo !
Bozoba esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi moto ya mayele atambolaka alima na nzela na ye.
Moto mabe akangaka elongi na ye, kasi moto ya sembo alendisaka nzela na ye.
Miso na yo ekomona biloko na ndenge ya kokamwa, mpe motema na yo ekobimisa makambo ya bozoba.
Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.
Longola lokuta na monoko na yo, mpe longola mabe na bibebu na yo.
Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela, mpe tambola kaka na nzela oyo oyebi malamu.
Miso ezali lokola mwinda ya nzoto. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na pole.