Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 4:23 - Mokanda na Bomoi

23 Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 4:23
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, Jewu asalaki bokebi te mpo na kobatela mibeko ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema na ye mobimba. Atikaki te masumu ya Jeroboami oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu.


Mwasi ya malamu azwaka lokumu, mpe bato ya makasi bazwaka bomengo.


Moto oyo abatelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye, kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi akosuka na libebi.


Bato ya sembo batambolaka na nzela oyo epesaka mabe mokongo. Moto oyo abatelaka motema na ye abatelaka nde bomoi na ye.


Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo, kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.


Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya, batela motema na yo kati na nzela ya sembo.


Moto oyo atiaka elikya kati na ye moko kaka azali zoba, kasi moto oyo atambolaka na bwanya akokangolama.


Mwana na ngai, tika ete bwanya mpe bososoli ezala mosika ya miso na yo te ; batela yango malamu,


Tala ebandeli ya bwanya : Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.


likambo moko ya mabe ya mbalakata ebebisi bomengo yango, mpe mwana na ye azangi libula ya kokitana na yango.


Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?


Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.


Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.


Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.


Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.


Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.


Bosenzelaka ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe ; bosenzelaka mpe ete mosisa moko te ya bololo ebotama mpo na kokotisa mobulu mpe kobebisa bomoi ya bato ebele kati na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ