Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 4:2 - Mokanda na Bomoi

2 Pamba te nazali kopesa bino mateya ya malamu ; bobwaka mateya na ngai te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 4:2
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.


Kasi soki bopengwi mosika na Ngai, soki bosundoli mibeko mpe malako na Ngai, oyo natie liboso na bino ; soki bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango,


Ozali koloba na Nzambe : ‹ Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo ; nazali sembo na miso na Yo. ›


Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi.


Etikali moke mpo ete balongola ngai na mokili ; kasi atako bongo, nasundoli mibeko na Yo te.


Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te, kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;


Totosaka makambo nyonso oyo koko na biso Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, ayebisa biso : Ezala biso, basi na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, tomelaka masanga ya vino te,


Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona !


Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu-Klisto, mosali oyo alendisami na maloba ya kondima mpe na malakisi ya kitoko oyo olandi na bosembo.


moto oyo akangama makasi na Liloba ya solo, ndenge kaka bateyaki ye yango. Na bongo, akoki kolendisa bato mosusu na nzela ya malakisi ya peto mpe kosukisa tembe ya bato oyo bandimaka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ