Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 4:19 - Mokanda na Bomoi

19 Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 4:19
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpo ete batepatepa kati na molili, na kozanga pole ; mpe asalaka ete batepatepa lokola moto alangwe masanga.


Babenganaka ye na pole mpo ete akende na molili, mpe balongolaka ye na mokili.


Molili eyelaka bango na moyi ; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.


Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili ; miboko nyonso ya mokili ezali koningana.


na bato oyo batikaka nzela ya sembo mpo na kolanda nzela ya molili,


Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo, kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.


Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, liboso ete amemela bino molili, liboso ete makolo na bino ebeta mabaku na bangomba oyo ezipami na molili. Bino bozali kozela pole, kasi Ye akobongola yango molili makasi.


« Yango wana, nzela na bango ekokoma moselu mpe molili ; bakobengana bango kino na mboka ya molili mpe kuna bakokweya. Nakotindela bango pasi, tango oyo nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.


Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.


Bongo Ngai, nakoyebisa bango : ‹ Natikala koyeba bino te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe ! ›


Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te.


Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.


Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili ; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili esila koboma ye miso.


Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ