azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te, lokola kongenga ya sima na mvula oyo ebimisaka matiti na mokili. ›
Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.
Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.
mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili
Tozali lisusu kondima bosolo ya maloba ya basakoli oyo, bozali solo kosala malamu wana bozali kotia makanisi na bino kati na yango lokola na mwinda oyo ezali kopela kati na esika ya molili, kino tongo etana mpe monzoto ya tongo engenga kati na mitema na bino.
kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !
Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.
Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.
Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi ! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.