Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 4:17 - Mokanda na Bomoi

17 baliaka lipa na nzela ya mabe mpe bamelaka vino na nzela ya mobulu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 4:17
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te !


Mbuma ya monoko eleisaka moto bilei ya malamu, kasi molimo ya moto oyo atambolaka na bosembo te ememaka na mobulu.


Bilei oyo ezwami na nzela ya lokuta ezalaka elengi na monoko ya moto, kasi, na sima, monoko na ye etondaka na zelo.


« Mayi oyo bayibi ezalaka elengi, mpe lipa oyo baliaka na kobombama ezalaka kitoko. »


Mawa na bato oyo babendaka masumu na basinga ya makambo ya lokuta, mpe mabe lokola nde bazali kobenda shario na basheni !


Mawa na bato oyo babengaka mabe malamu mpe malamu mabe, oyo bamonaka molili lokola pole mpe pole lokola molili, oyo bamonaka bololo lokola elengi mpe elengi lokola bololo !


Moninga azali kokosa moninga na ye, mpe moto moko te azali koloba solo. Bamibongisaka mpo na koloba lokuta, babimisaka motoki na bango mpo na kosala masumu.


Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela basakoli ya lokuta oyo babungisaka bato na ngai nzela : « Soki bapesi bango eloko ya kolia, basakolaka kimia ; soki bapesi bango te eloko ya kolia, basakolaka bitumba.


Bazwi ya libota oyo batondi na kanza, bato ya libota oyo batondi na lokuta, mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa.


Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.


Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga ; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ