Moninga azali kokosa moninga na ye, mpe moto moko te azali koloba solo. Bamibongisaka mpo na koloba lokuta, babimisaka motoki na bango mpo na kosala masumu.
Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.
Tango tongo etanaki, bakambi ya bato, elongo na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko, basanganaki mpe basengaki ete bamema Yesu liboso ya Likita-Monene na bango.
Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.
Miso na bango elembaka te kolula basi mpo na koluka kosala na bango ekobo, balembaka te kosala masumu, bakosaka bato oyo balendisama malamu te na kondima ; bazali na mitema etonda na lokoso : bazali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe.