Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 31:4 - Mokanda na Bomoi

4 Eh Lemweli, ebongi te mpo na bakonzi ; te, ebongi te mpo na bato minene kotuna : « Wapi masanga ya makasi ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 31:4
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Zimiri, mokonzi ya mampinga oyo azalaki kokamba ndambo ya bashar na ye, asalelaki ye likita. Na tango wana, mokonzi Ela azalaki na Tiritsa komela mpe kolangwa masanga na ndako ya Aritsa, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, kuna na Tiritsa.


Beni-Adadi ayokaki sango yango tango ye elongo na bakonzi bazalaki komela na bandako ya kapo. Apesaki mitindo epai ya bato na ye : — Bomibongisa mpo na etumba. Boye, bamibongisaki mpo na kobundisa engumba.


Na mokolo ya sambo, lokola mokonzi Kizerisesi alangwaki vino, atindaki basoda na ye sambo oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kosalela ye : Mewumani, Bizita, Aribona, Bigita, Abagita, Zetari mpe Karikasi.


Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga.


Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.


Boye, okokoma lokola moto oyo alali kati na ebale monene, mpe lokola moto oyo alali na songe ya nzete ya molayi.


Esengo na mokili oyo mokonzi na yango abotama na libota ya bato minene, mpe oyo bakambi na yango baliaka na tango oyo esengeli mpo na kozwa makasi, kasi mpo na kolangwa masanga te.


Mawa na bato oyo bakenda sango ya komela vino mpe ya kosangisa masanga ya makasi :


Solo, masanga ya vino ekosaka ; moto ya lolendo avandaka kimia te. Mpo ete azali lokoso lokola mboka ya bakufi mpe atondaka te lokola kufa, asangisaka bato ya bikolo nyonso pembeni na ye mpe akomisaka bango bawumbu na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ