Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 31:31 - Mokanda na Bomoi

31 Bopesa ye bambuma ya misala na ye ! Tika ete bapesa ye lokumu, na bikuke ya engumba, mpo na misala nyonso oyo asalaka !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 31:31
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oliaka mbuma ya mosala na Yo ; ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.


Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi, mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye.


Soki asepeli na elanga, asombaka yango ; mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.


Bonzenga ya elongi ekosaka, mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba ; kasi mwasi oyo atosaka Yawe, ye nde abongi na lokumu.


Maloba ya Moteyi, mwana mobali ya Davidi, mokonzi na Yelusalemi.


Bokoyeba bango na nzela ya misala na bango. Boni, bokoki kolongola bambuma ya vino na nzete ya basende to kobuka bambuma ya figi na nzete ya banzube ?


Boye, bokoyeba basakoli ya lokuta na nzela ya misala na bango.


Mbala moko, Petelo akendeki elongo na bango ; mpe tango akomaki, bamemaki ye na shambre ya likolo. Basi nyonso oyo bakufisa mibali bayaki kozingela ye, bazalaki kolela mpe kolakisa ye banzambala mpe bilamba mosusu oyo Dorkasi asalaki, wana azalaki nanu elongo na bango.


Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo. Bopesa mbote na Periside, mwasi molingami na ngai, oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo.


Bopesa mbote na Mari oyo asalaki mosala makasi mpo na bino.


Ezali te ete nazali koluka makabo kowuta epai na bino, kasi nazali koluka ete bambuma ya bolamu na bino efuluka lisusu koleka.


Ezali mpe ndenge moko mpo na misala malamu : emonanaka polele. Kasi misala oyo ekomonana polele te ekotikala ya kobombama te mpo na libela.


Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.


Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai : — Koma : « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo ! » Mpe Molimo alobaki : — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ