Oh bino bana basi ya Isalaele, bolela mpo na Saulo oyo alatisaki bino bilamba ya motane mpe biloko ya monzele, oyo atondisaki babiju ya wolo na bilamba na bino.
Banguba mpe bilamba ya basoda na bango ezali ya langi ya motane ; bibende ya bashar na bango ezali kongenga na mokolo oyo babongisi mpo na bitumba, mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.