Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 31:17 - Mokanda na Bomoi

17 Akangaka loketo na ye makasi mpe akembisaka maboko na ye na mosala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 31:17
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye, mpe maboko na ye etikalaki kolenga te mpo na loboko ya Elombe ya Jakobi, oyo azali Mobateli mpate, Libanga ya Isalaele.


Lokola nguya na Yawe ezalaki likolo ya Eliya oyo alataki mokaba na loketo na ye, akimaki mbangu liboso ya Akabi kino na ekuke ya Jizireyeli.


Elize alobaki na Geazi : — Lata mokaba na yo, kamata nzete na ngai na loboko na yo mpe kende. Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te. Mpe soki moto apesi yo mbote, kozongisa te. Okotia nzete na ngai na elongi ya mwana mobali.


Lata mokaba na yo lokola elombe mobali ; nakotuna yo mituna mpe okoyanola ngai.


Soki asepeli na elanga, asombaka yango ; mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.


Amonaka ete mombongo na ye etambolaka malamu ; mpe kino na butu, mwinda na ye ekokufa te.


Monyangwisi bibende na moto azwaka sizo, asalelaka yango mpe asalaka na makala ya moto ; asalaka ekeko na marto mpe abongisaka yango na makasi ya loboko na ye ; nzokande soki akomi na nzala, makasi esili ye ; soki mpe ameli mayi te, nzoto elembi ye !


Ezali Ngai nde nateyaki mpe nakomisaki bango makasi, kasi bango bazalaka kaka na mabongisi ya kosala Ngai mabe.


Bomilengela mpo na mosala mpe bobatela minda na bino ya kopela.


Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.


Boye botelema ngwi, bolataka solo lokola mokaba na loketo, bosembo lokola ebombelo ya tolo,


Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ