Oh Salomo, mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ezali ya yo, mpe bibende nkama mibale ezali ya bakengeli bambuma ; kasi elanga na ngai ya vino, oyo ezali liboso na ngai, ezali ya ngai.
Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga ; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu ; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana.
Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye : — Olingi nini ?