Nazali koluka, kasi nanu namoni te. Namoni mobali moko ya sembo kati na mibali nkoto moko, kasi namoni ata mwasi moko te ya sembo kati na basi nyonso !
Mpe sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, kobanga te ; nakosalela yo nyonso oyo okosenga, pamba te bato nyonso ya esika oyo bayebi ete ozali mwasi ya malonga.
Kombo na ye ezalaki « Nabali, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Abigayili. » Abigayili azalaki mwasi ya mayele mpe ya kitoko ; kasi mobali na ye, moto ya etuka Kalebi, azalaki motema makasi mpe moto mabe.