1 Maloba ya mokonzi Lemweli, mateya oyo mama na ye ateyaki ye :
Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;
Tala maloba ya Aguri, mwana mobali ya Yake. Ezali ye nde alobaki yango epai ya Itieli, epai ya Itieli mpe Ukali :
pamba te kobeta-beta mabele ebimisaka manteka, kobeta zolo ebimisaka makila, mpe kotumbola kanda eyeisaka koswana.
Eh mwana na ngai ya mobali, mwana oyo abimi na libumu na ngai, mwana mobali oyo nalapelaka ndayi :
Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.
Nakanisaka bosolo ya kondima na yo, oyo Loyisi, koko na yo ya mwasi, mpe Enise, mama na yo, bazalaki na yango, kondima oyo nandimisami solo ete ezali mpe kati na yo.
mpe wuta bomwana na yo, oyebi Makomi ya bule oyo ezali na makoki ya kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto.