Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 30:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 30:4
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto yango alobaki lisusu : — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.


Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe ? Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ?


Bandelo yango eleki Lola na likolo ; yo penza okosala nini ? Eleki mboka ya bakufi na bozindo ; yo penza okoyeba nini ?


akangaka mayi kati na mapata, kasi mapata epasukaka te ;


Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka mikalikali elongo na mvula, abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.


Nakosakola mobeko ya Yawe. Alobaki na ngai : « Ozali Mwana na Ngai ya mobali, na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo.


Babola bakolia mpe bakotonda ; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.


Pamba te ezali Yawe nde atia yango na likolo ya bibale minene mpe apikaki yango na likolo ya miluka.


Motango ya bashar ya Nzambe ezali ebele, koleka minkoko ; Nkolo azali kati na yango, kuna na Sinai, kati na Esika ya bule.


Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo, mpe ebale monene ezipi bango. Bazindi lokola mbodi kati na mayi makasi.


Namimonisaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi lokola Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kasi namimonisaki te epai na bango na Kombo na Ngai : Yawe.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akela likolo, Ye oyo azali Nzambe oyo asala mpe abongisa mabele, mpe atelemisa yango ngwi ; Ye akelaki yango te mpo ete ezala pamba, kasi asalaki yango mpo ete bato bavanda : « Nazali Yawe, mpe mosusu azali te.


Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu ; kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki komitungisa na tina na ye ? Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.


Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »


Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.


Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi soki Mwana azali nani, longola kaka Tata ; mpe moko te ayebi soki Tata azali nani, longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


Ezali na moto moko te oyo asila komata na Likolo, longola kaka Ye oyo akita wuta na Likolo : Mwana na Moto.


Kasi tala ndenge nini bosembo oyo ewutaka na kondima elobaka : « Komilobela te kati na motema na yo : ‹ Nani akomata kuna na Likolo ? › Ezali lokola kokitisa Klisto wuta na Likolo


Tango bosaleli te maloba nyonso ya mibeko oyo ekomami na buku oyo mpe botosi te Kombo ya lokumu mpe ya somo, Yawe, Nzambe na bino ;


Ezali te kati na Likolo mpo ete okoka kotuna : « Nani akomata kuna na Likolo mpo na kozwela ngai yango mpe kosakolela ngai yango mpo ete nakoka kotosa yango ? »


Miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela ; mpe na moto na Ye, ezali na mitole ebele. Bakoma kombo moko na nzoto na Ye, kombo oyo Ye moko kaka nde ayebi.


Anjelu na Yawe azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna ngai kombo na ngai ? Kombo na ngai ezali kombo ya kokamwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ