Nazali na kati-kati ya bankosi ; nalali na kati-kati ya bato oyo babomaka mpe baliaka bato, oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo, mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.
Yawe akosamba elongo na bampaka mpe bakambi ya bato na Ye : « Ezali nde bino bato bobebisi elanga na Ngai ya vino ! Botondisi bandako na bino na biloko oyo bobotoli epai ya babola !
Bazali konyata mito ya babola ndenge banyataka putulu ya mabele, mpe bazali kokata na bosembo te makambo ya bato bakelela. Tata mpe mwana na ye ya mobali bazali kosangisa nzoto na mwasi moko ya makangu ; mpe na bongo, bazali kotiola bosantu ya Kombo na Ngai.
Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »
Otobolaki ye moto na nzela ya likonga na ye moko, tango basoda na ye bazalaki koya na elulu lokola mopepe mpo na kopanza biso. Bazalaki kosepela na elikya ete bakoboma biso na nkuku.
Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga ; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [