Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te ; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai.
Yawe alobi : « Lokola basi ya Siona bazali lofundu, lokola batambolaka mapeka likolo mpe balalisaka miso na lofundu, lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe mpe na kolelisa biloko ya monzele oyo balataka na makolo na bango,
Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo.