Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 30:11 - Mokanda na Bomoi

11 Ezali na bato oyo balakelaka batata na bango mabe mpe bapambolaka te bamama na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 30:11
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo akolakela tata to mama na ye mabe, asengeli kozwa etumbu ya kufa.


Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.


Yokela tata oyo aboti yo, mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.


Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.


Moto nyonso oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe, esengeli baboma ye ; pamba te alakeli tata na ye to mama na ye mabe : makila na ye ekotangama na moto na ye moko.


Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo ? ›


Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.


Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ