Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Okozwa ngolu mpe kombo ya malamu na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 3:4
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe azalaki elongo na Jozefi mpe atalisaki ye bolamu na Ye ; asalelaki ye ngolu na miso ya mokonzi ya boloko.


Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.


Moto ya malamu azwaka ngolu na miso ya Yawe, kasi Nzambe akatelaka moto ya mayele mabe etumbu.


Boyebi ememelaka bato ngolu, kasi nzela ya bato oyo babukaka mibeko ezalaka pasi.


Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe.


Boye, Nzambe asalaki ete Daniele azwa ngolu mpe bolamu na miso ya mokonzi ya bakalaka ya lokumu.


Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.


Bazalaki kokumisa Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kolinga bango. Bongo, mikolo nyonso, Nkolo azalaki kobakisa na lisanga na bango bato oyo bazalaki kobika.


Moto oyo asalelaka Klisto na lolenge oyo asepelisaka Nzambe, mpe bato bandimaka ye.


Pamba te totondi na posa makasi ya kozala na etamboli ezanga pamela, na miso ya Nkolo kaka te, kasi mpe na miso ya bato.


Yawe asalelaki Ana ngolu, mpe Ana azwaki lisusu bazemi, abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge mobali Samuele azalaki kokola liboso ya Yawe.


Elenge mobali Samuele akobaki kokola na nzoto, mpe azalaki kosepelisa Yawe mpe bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ