Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 3:24 - Mokanda na Bomoi

24 Tango okolala, okobanga eloko moko te, pamba te pongi na yo ekozala ya kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 3:24
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokonzi ya Jozafati ezwaki kimia, pamba te Nzambe na ye apesaki ye bopemi na bangambo nyonso.


okolala pongi, mpe okomona moto moko te kobangisa yo lisusu, mpe bato ebele bakoya kosenga ngolu na yo.


Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.


Ezali na pamba nde, bino mpe, bolamukaka na tongo makasi, bolalaka noki te mpe bosalaka makasi mpo na kozwa bilei ; pamba te Nzambe apesaka bilei yango kaka na balingami na Ye, wana bazali nanu kolala pongi.


Nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.


Nalalaka mpe nazwaka pongi ; nalamukaka lisusu, pamba te Yawe azali makasi na ngai.


Tondisa motema na ngai na esengo soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.


Okobanga te somo ya butu, makonga oyo epumbwaka na moyi makasi,


kasi moto oyo ayokaka Ngai akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »


Kotosa Yawe ememaka na bomoi, esalaka ete moto azala na kimia ; boye ata mabe moko te ekokomela ye.


Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka.


Namoni mabe moko na se ya moyi, epesaka penza mawa : moto abombi bomengo na ye, kasi ememeli ye pasi ;


Okolendisama kati na bosembo : minyoko ekozala mosika na yo, okobanga lisusu eloko moko te, mpe somo ekokende mosika na yo ; ekomeka kopusana lisusu pene na yo te.


Boye, tango nalamukaki, natalaki pene na ngai ; nasosolaki ete pongi na ngai ezalaki elengi.


Ngai moko nakoleisa bibwele na Ngai, mpe Ngai moko nakopemisa yango, elobi Nkolo Yawe ;


Nakosala boyokani ya kimia elongo na bibwele na Ngai, nakolongola banyama mabe kati na mokili mpo ete bibwele na Ngai evanda na kimia kati na esobe mpe elala na bazamba.


Banzete ya bilanga ekobota bambuma, mpe mabele ekobota biloko ebele. Bato na Ngai bakozala na kimia na mabele na bango ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakobuka banzete ya ekangiseli na bango mpe nakokangola bango na maboko ya bato oyo banyokolaka bango.


Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino ; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.


Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa ye, Petelo alalaki pongi na kati-kati ya basoda mibale, akangama na minyololo mibale, mpe bakengeli bazalaki kobatela ekuke ya boloko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ