Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 3:23 - Mokanda na Bomoi

23 Boye, okotambola na kimia na nzela na yo, mpe lokolo na yo ekobeta libaku te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 3:23
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato oyo balingaka mibeko na Yo bazali bato na kimia monene, mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.


Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.


Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.


Mobeko ya Nzambe na ye ezali kati na motema na ye, makolo na ye ebetaka libaku te.


Moto ya sembo atambolaka na kimia, kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama akobima na pwasa.


Pamba te abatelaka bayengebene mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.


Mpo ete makolo na yo ezala na mikakatano te tango okotambola ; mpe soki okimi mbangu, okokweya te.


Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka.


Moko te kati na bango asili kolemba nzoto to abeti libaku, moko te azali konimba to kolala pongi. Moko te alongoli mokaba na ye na loketo, singa moko te ya basapato na bango etikali kokatana.


Ye oyo atambolisaki bango kati na mozindo ? Lokola mpunda kati na esobe, babetaki libaku te ;


Nakosala ete balendisama kati na Yawe : bakotambola na Kombo na Ye, » elobi Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ