22 pamba te ekozala bomoi mpo na yo mpe ngolu mpo na kingo na yo.
Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo, mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.
Mayele ezali etima ya bomoi mpo na bato oyo bazali na yango, kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba.
Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye ; moto oyo alingaka mayele alongaka.
Moto oyo alukaka bosembo mpe bolingo akozwa bomoi, bomengo mpe lokumu.
Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo, kobwaka yango te, batela yango malamu mpo ete ezali bomoi na yo.
pamba te ezali bomoi mpo na bato oyo bazwaka yango, mpe epesaka nzoto kolongono.
Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe.
Nkolo, bato babikaka mpo na bolamu na Yo ; ezali mpe na nzela na yango nde ngai nazwi bomoi. Ozongiselaki ngai nzoto kolongono mpe opesi ngai bomoi.
Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »