19 Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele ; na nzela ya mayele, alendisaki likolo.
Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele ? Yebisa ngai soki ozali mayele.
Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele ! Osalaki nyonso na bwanya ; mokili etondi na biloko oyo okela.
Akelaki likolo na mayele na Ye ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala ;
Kasi Yawe asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.
Asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.
Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye ; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te.