Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 3:17 - Mokanda na Bomoi

17 Nzela na Ye ezali ya esengo, mpe banzela na Ye nyonso ya mike ezali ya kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 3:17
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokumisa Yawe ! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.


Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai ! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.


Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo lokola nde nazali na bomengo nyonso.


Bato oyo balingaka mibeko na Yo bazali bato na kimia monene, mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.


Yawe, nazali na posa makasi ya lobiko na Yo ; mibeko na Yo epesaka ngai esengo.


Nasepelaka mingi na mibeko na Yo mpe nalingaka yango mingi.


Banzela nyonso ya Yawe etalisaka bolingo mpe boyengebene na Ye mpo na bato oyo babatelaka boyokani mpe malako na Ye.


Kasi bato oyo bamikitisa bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakozala na kimia makasi.


Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.


Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo.


Pamba te ekozala esengo soki obombi yango na motema na yo, mpe soki yango nyonso ezali pene ya bibebu na yo.


Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.


Nakotia masanzoli na bibebu ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. « Mpe nakobikisa bango. »


mpo na kopesa pole na bato nyonso oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso kati na nzela ya kimia. »


Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ