11 Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe, koboya te pamela na Ye ;
Kasi awa sik’oyo pasi ekomeli yo, olembi na yo ! Awa pasi ebeti yo, okomi na yo koyoka somo !
Esengo na moto oyo Nzambe apameli ! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Yawe, esengo na moto oyo ozali kozongisa na nzela, moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo
Soki omilembisi na mokolo ya pasi, makasi na yo ekozala pamba.
Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.
Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te ;
Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye.
Bokundolaka mozindo ya Ye oyo akangaki motema liboso ya basumuki oyo bazalaki konyokola Ye, mpo ete bobungisa te molende mpe mpiko na bino.
Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.