Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 3:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bongo bibombelo na yo ekotonda na biloko, mpe bambeki na yo ekotonda na vino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 3:10
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, moto ya libota ya Tsadoki, azongisaki : — Wuta tango bato babandaki komema makabo na bango kati na Tempelo ya Yawe, toliaki, totondaki mpe totiki ebele, pamba te Yawe apambolaki bato na Ye. Mipiku ya biloko oyo ozali komona awa ezali nde oyo etikali.


Kati na nyonso oyo Ezekiasi asalaki, ezala mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe to mpo na botosi mibeko mpe mitindo, azalaki koluka Nzambe na ye mpe kosala na motema na ye mobimba ; mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala.


Bibombelo na biso etondi na biloko ya ndenge na ndenge ; bameme na biso ezali kobotana na minkoko, na bankoto zomi kati na bitonga na biso ;


Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.


Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.


Etando oyo batutelaka ble ekotonda na bambuma, banzungu ekotonda na vino mpe na mafuta.


Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. »


Moto nyonso oyo apesaka ata kopo moko kaka ya mayi ya malili epai ya moko kati na bana mike oyo, mpo ete azali moyekoli na Ngai, nazali koloba na bino penza ya solo, akotikala kobungisa te lifuti na ye.


Na bongo, Balevi oyo bazali na eteni ya mabele te to na libula te mpo na bango moko elongo na bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bavandaka na bingumba na bino, bakoya kolia mpe kotonda mpo ete Yawe, Nzambe na bino, akoka kopambola bino na misala na bino nyonso ya maboko.


Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ