Lamuka, lamuka ! Telema, Yelusalemi, yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, kopo ya kanda na Ye ; yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.
« Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe : « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.
Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
Bozala na bokebi mpe bobosana te boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki elongo na bino. Mpe bomisalela ekeko te na lolenge nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apekisaki.
Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo mpo ete ozala na bomoi ya molayi, mpe ozala moto ya esengo kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.
Salela na bokebi mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo mpo ete bokoka kovanda, kokoma ebele, kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe alakaki epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi.