Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 29:6 - Mokanda na Bomoi

6 Lisumu ya moto mabe ezalaka na motambo, kasi moto ya sembo agangaka na esengo mpe asepelaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 29:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto ! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.


Koganga ya esengo mpe ya elonga eyokanaka wuta na bandako ya kapo ya bato ya sembo, pamba te nguya na Yawe esalaka makambo minene !


Nakolatisa Banganga-Nzambe na yango lobiko, mpe bato na yango bakoganga na esengo.


Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.


Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe : Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye ! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.


Elikya ya moto ya sembo ekosuka na esengo, kasi elikya ya moto mabe ekosuka na pamba.


Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.


Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo, kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.


Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,


Moto moko te ayebi tango nini ngonga na ye ekokoka : ndenge mbisi ekangamaka na monyama to ndenge banyama ekangamaka na motambo, ndenge wana mpe bato bakangamaka na mitambo ya pasi oyo ekweyelaka bango na mbalakata.


Bongo bakozongela mayele na bango ya malamu mpe bakolongwa na motambo ya Satana oyo akanga bango na boloko mpo ete basala kaka mokano na ye.


Bandeko na ngai, bomona lokola likambo ya esengo, lolenge nyonso ya komekama oyo bozali kokutana na yango.


Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,


Yango wana tozali kokomela bino makambo oyo mpo na kokomisa esengo na biso ya kokoka.


Bana ya Isalaele babalolaki elongi na bango mpo na kotala mibali ya Benjame. Bongo mibali ya Benjame babangaki mpo ete bamonaki likama oyo ekomeli bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ