Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 29:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mokonzi oyo akambaka na bosembo ayeisaka kimia na mokili na ye, kasi mokonzi oyo afutisaka mpako ebele abebisaka mokili yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 29:4
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.


Salomo avandaki na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ye, mpe bokonzi na ye elendisamaki.


Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti na Ye ya bokonzi lokola mokonzi mpo na kosalela Yawe, Nzambe na yo ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpe alingi ete ewumela mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi na yango, mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. »


mpe asosolisa yo basekele ya bwanya, pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale. Yeba likambo oyo : Nzambe abosana masumu na yo ebele.


Loboko na Yo ezali na makasi, loboko na Yo ezali na nguya, loboko na Yo ya mobali oyo otombola.


Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo. Olendisaka bosembo. Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi.


Bosembo etombolaka ekolo, kasi lisumu ememelaka bato soni.


Maloba ya mokonzi ezali lokola Liloba na Nzambe, ekweyaka te kati na kosambisama.


Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe, pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo.


Soki mokonzi avandi na kiti mpo na kosambisa, miso na ye ebenganaka mabe nyonso.


Mokonzi oyo asambisaka babola na bosembo, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama tango nyonso.


Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili, mpe bakambi basalaka mibeko ya sembo ;


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Na tango ya malamu, nakoyanola yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nakosunga yo ; nakobatela yo mpe nakotombola yo mpo ete osala boyokani elongo na bato, osala ete mokili etombwama mpe ozongisela yango libula na yango oyo ebebisamaki ;


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


Mokitani na ye akotinda mofutisi mpako moko na esika oyo eleki lokumu kati na mokili. Sima na mwa mikolo, mokonzi mpe akobebisama, kasi ekozala na botomboki te mpe na bitumba te.


Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.


Samuele alobaki na Saulo : — Osali lokola moto ya liboma ! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ