Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 29:2 - Mokanda na Bomoi

2 Soki bato ya sembo bakomi ebele, bato basepelaka ; kasi soki bato mabe bakomi koyangela, bato balelaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 29:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga.


Maridoshe alongwaki liboso ya mokonzi, na bilamba ya bokonzi ya langi ya ble mpe ya pembe, na motole monene ya wolo mpe na nzambala ya motane makasi ya lino ya kitoko. Engumba mobimba ya Size ezalaki koganga na esengo mpe ezalaki kosepela.


mpo na kopekisa bato mabe ete bakamba mokili te mpe batiela bato mitambo te.


Tango bato ya sembo bapambolamaka, engumba esepelaka ; mpe tango moto mabe akufaka, bato bagangaka na esengo.


Tango bato ya sembo balongaka, ezalaka esengo mingi ; kasi tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka.


Mokonzi mabe oyo azali kokamba bato bakelela azali lokola nkosi ya kanda to lokola ngombolo oyo ezali kolanda nyama ya kolia.


Tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka ; kasi tango bakufaka, bato ya sembo bakomaka ebele.


Namonaki mabe moko na se ya moyi, lokola libunga epai ya bakonzi :


bazoba batombolami na bisika ya lokumu makasi, kasi bazwi batikali na bisika ya se.


Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki.


Tango mokonzi Erode ayokaki bongo, motema na ye etungisamaki makasi elongo na Yelusalemi mobimba.


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ