Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 29:16 - Mokanda na Bomoi

16 Soki bato mabe bakomi ebele, mabe mpe ekomaka ebele ; kasi bato ya sembo bakomona bango kokweya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 29:16
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.


Zala na elikya kati na Yawe mpe batela nzela na Ye ; akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo, mpe okomona tango bato mabe bakolimwa.


kasi alekaki noki mpe azalaki lisusu te ; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te.


Liboso ete banzungu na bino ekutana na moto ya basende, ezala ya mayi to ya kokawuka, bato mabe akolimwa.


Okotala kaka na miso na yo mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali kozwa etumbu lokola lifuti na bango.


Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika.


Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela.


Nzambe ya sembo atalaka na bokebi makambo oyo esalemaka kati na bandako ya bato mabe, mpe akweyisaka bango kati na pasi.


Soki bato ya sembo bakomi ebele, bato basepelaka ; kasi soki bato mabe bakomi koyangela, bato balelaka.


Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ