Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 29:14 - Mokanda na Bomoi

14 Mokonzi oyo asambisaka babola na bosembo, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama tango nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 29:14
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe, pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo.


kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.


Mokonzi oyo akambaka na bosembo ayeisaka kimia na mokili na ye, kasi mokonzi oyo afutisaka mpako ebele abebisaka mokili yango.


Bolamu mpe solo ebatelaka mokonzi ; alendisaka bokonzi na ye na nzela ya bolamu.


Mokonzi oyo anyokolaka bato azangi mayele, kasi oyo aboyaka bomengo na nzela ya moyibi ayeisaka mikolo ya bomoi na ye ebele.


Soki olongoli moto mabe liboso ya mokonzi, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama na bosembo.


Nakoyemba tango nyonso bolingo ya Yawe ; monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo libela na libela.


amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? »


Alongisaki babola mpe bato bakelela, mpe alongaki na makambo nyonso. Boni, yango te koyeba Ngai, » elobi Yawe ?


Bakoma kitoko mpe ngebungebu ; mabe na bango eleka ndelo, balobelaka likambo ya mwana etike na bosembo te, mpo kaka bango moko balonga. Bakataka makambo ya babola na bosembo te.


Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ