alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango : Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.
Bongo Saulo apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Bosolola na Davidi na nkuku mpe boyebisa ye : ‹ Tala ndenge nini mokonzi azali kosepela na yo, mpe basali na ye nyonso balingi yo ! Koma na yo sik’oyo bokilo na ye ! › »