Masese 29:10 - Mokanda na Bomoi10 Bato oyo basopaka makila balingaka bato ya sembo te, kasi bato malamu balukaka bato ya sembo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !
Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe ; kasi ngai nalingaka ye te mpo ete atikala nanu kosakola te makambo ya malamu mpo na bomoi na ngai ; asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !