25 Moto ya lokoso ayeisaka koswana, kasi moto oyo atiaka elikya na Yawe akotonda na mafuta.
Pamba te, mpo na biso, Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba ; Yawe apesaka ngolu mpe nkembo, aboyaka kopesa eloko moko te epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.
Koyina ebendaka koswana, kasi bolingo ezipaka mabe.
Yawe atikaka te ete moto ya sembo akufa nzala, kasi apimelaka bato mabe biloko oyo bazali na yango posa.
Moto oyo akabaka akokoma na bomengo ; mpe moto oyo apesaka bato mosusu mayi, ye mpe bakopesa ye mayi.
Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.
Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.
Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.
Moto oyo alukaka litomba na nzela ya sembo te amemaka mitungisi na libota na ye, kasi moto oyo aboyaka kanyaka akozala na bomoi.
Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema ; sango malamu elendisaka mikuwa.
Kombo ya moto ya lofundu mpe ya lolendo ezali : « Motioli. » Asalaka makambo na lolendo oyo eleka ndelo.
Bengana motioli, bongo kowelana, koswana mpe kofingana ekosila.
Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.
Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.
Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.
Solo, kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela monene ya kozwa bomengo soki kaka oyebi kosepela na oyo ozali na yango.