Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 28:2 - Mokanda na Bomoi

2 Soki kotomboka ezali kati na mokili, bakonzi bakomaka ebele ; kasi moto ya mayele mpe ya bososoli ayeisaka kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 28:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi ; Nadabi, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale.


Baesha abomaki Nababi tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, mpe akitanaki na Nadabi na bokonzi.


Engumba etongamaka na nzela ya mapamboli ya bato ya sembo, kasi ebebisamaka na nzela ya monoko ya bato mabe.


Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mobola moko oyo azalaki moto ya bwanya ; abikisaki yango na bwanya na ye, kasi moto moko te akanisaki mobola yango.


Mpo na yo, bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala, bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala ; bakobenga yo : ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukana mpe ya banzela oyo bato balekaka. ›


amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? »


Boye, na kanda na Ngai, napesaki bino mokonzi, mpe na kotomboka na Ngai, nakolongola ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ