19 Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi akotonda na bobola.
Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele.
Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.
Esika oyo ezalaka na ngombe te, elielo mpe ezalaka na eloko te, pamba te ezali makasi ya bangombe nde epesaka bomengo.
Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola ; sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama, mpe okozanga te bilei ya kobomba.
bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.
Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye.