Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 28:17 - Mokanda na Bomoi

17 Moto oyo amitungisaka mpo ete abomi moninga akimaka kino na libulu ya kufa ; tika ete moto moko te akanga ye nzela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 28:17
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili.


Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.


Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi : « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. »


Sima, bilenge mibali zomi oyo bamemaki bibundeli ya Joabi, bazingaki Abisalomi, babetaki ye mpe babomaki ye.


Bayebisaki Salomo ete Joabi akei na Ndako ya kapo ya Yawe mpe azali pembeni ya maseke ya etumbelo. Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, ete akende koboma ye.


Okoyebisa ye makambo oyo : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te ? › Okobakisa lisusu : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › »


Tala lisusu makambo oyo Yawe alobi na tina na Jezabeli : « Bambwa ekolia Jezabeli pene ya mir ya Jizireyeli.


‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe.


Kasi soki moto akaneli moninga na ye mpe aluki koboma ye na mayele mabe, okomema ye mosika ya etumbelo na Ngai mpo na koboma ye.


Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,


Kasi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato mwambe oyo bazalaki elongo na ye babikaki na maboko ya Yoanani mpe bakimaki epai ya bato ya Amoni.


Tango bavandi ya esanga bamonaki nyoka ezali kodiembela na loboko ya Polo, balobanaki bango na bango : — Solo, moto oyo azali penza mobomi ! Awuti kobika na likama ya ebale, kasi bosembo ya Nzambe elandi ye kaka mpo na koboma ye !


Kasi soki moto ayini moninga na ye mpe atieli ye motambo, abundisi ye mpe abomi ye na nko, bongo akimi kati na moko ya bingumba wana,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ