Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki : — Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo : « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi ; kasi yo, lembisela biso yango ! » Yebisa bango : « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene ;
alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango : Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.
Bilenge bazali konyokola bato na Ngai, basi bazali koyangela bango. Oh bato na Ngai, bakambi na bino babungisi bino nzela, babimisi bino libanda ya nzela oyo bosengeli kolanda !
Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »