Masese 28:13 - Mokanda na Bomoi13 Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Abisalomi azongiselaki Joabi : — Tala, natindelaki yo maloba ; nalobaki : « Yaka awa mpo ete natinda yo epai ya mokonzi mpo na kotuna ye : ‹ Mpo na nini nalongwaki na Geshuri ? Elingaki kozala malamu mpo na ngai soki natikalaki na ngai kuna. Sik’oyo, nalingi komona elongi ya mokonzi ; mpe soki namemaki ngambo na likambo moko, tika ete baboma ngai ! › »
Bongo Shekania, mwana mobali ya Yeyeli, moko kati na bakitani ya Elami, alobaki na Esidrasi : « Solo, tosalaki makambo ya mbindo na miso ya Nzambe na biso, pamba te tobali basi ya bapaya kati na bikolo oyo ezali elongo na biso kati na mboka oyo ; kasi atako bongo, elikya ezali nanu mpo na Isalaele !