Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 28:12 - Mokanda na Bomoi

12 Tango bato ya sembo balongaka, ezalaka esengo mingi ; kasi tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 28:12
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nkolo na ngai, oyokaki te makambo oyo nasalaki tango Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe ? Nabombaki basakoli ya Yawe nkama moko kati na madusu mibale ya mabanga : tuku mitano na lidusu moko na moko mpe napesaki bango bilei mpe mayi ya komela.


Eliya abangaki mpe akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Tango akomaki na Beri-Sheba ya Yuda, atikaki kuna mosali na ye.


Bongo na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya sambo, Salomo azongisaki bato na bandako na bango ya kapo, na esengo mpe na nsayi kati na mitema mpo na bolamu oyo Yawe asalelaki Davidi, Salomo mpe Isalaele, bato na Ye.


Tango bato ya sembo bapambolamaka, engumba esepelaka ; mpe tango moto mabe akufaka, bato bagangaka na esengo.


Tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka ; kasi tango bakufaka, bato ya sembo bakomaka ebele.


Soki bato ya sembo bakomi ebele, bato basepelaka ; kasi soki bato mabe bakomi koyangela, bato balelaka.


Mawa na mokili oyo mokonzi na yango azali mwana moke, mpe oyo bakambi na yango balangwaka masanga na tongo-tongo !


Bakambi bayebisaki Baruki : — Yo mpe Jeremi, bokende kobombama. Mpe tika ete moto moko te ayeba esika bokozala.


Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila ; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango.


« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.


Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki : « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ