Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.
Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.
Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.