Nani oyo abimi na esobe lokola molinga oyo ezali komata, azali kobimisa solo ya malasi ya mire mpe ya ansa, oyo basali na biloko ya mike-mike ya solo kitoko ya moto ya mombongo ?
Solo, bolingo na yo eleki elengi, ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ! Solo, bolingo na yo eleki vino na kitoko ; solo ya mafuta na yo eleki malasi nyonso na kitoko.
Mari akamataki ndambo ya litele ya malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi, asopaki yango na makolo ya Yesu mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo yango. Ndako mobimba etondaki na solo ya malasi yango.
Tango bandeko ya Rome bayokaki ete tokomi, bayaki kino na zando ya Apiusi mpe na esika oyo babengaka « Bandako misato, » mpo na kokutana na biso. Tango Polo amonaki bango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe azwaki lisusu molende.