Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi ; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba.
Ndenge ndeke ya moke oyo babengaka mwano ekendaka bipai na bipai to mbilambila epumbwaka-pumbwaka, ndenge wana mpe elakeli mabe ezwaka te moto oyo asali na ye mabe te.
Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe.
Kasi mosakoli Gadi alobaki na Davidi : « Kovanda te kati na ndako oyo batonga makasi, kende na mokili ya Yuda. » Boye Davidi alongwaki mpe akendeki na zamba ya Ereti.