6 Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu koleka babeze ebele ya monguna.
Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.
Moto oyo abombaka koyina kati na motema na ye azali na bibebu ya lokuta, mpe moto oyo atongaka bato azali zoba.
Bapota elongolaka mabe, mpe bafimbu esukolaka bozindo ya molimo ya moto.
Moto oyo atondi aboyaka ata mafuta ya nzoyi, kasi moto oyo azali na nzala ayokaka ata bilei ya bololo elengi.
Moto oyo apamelaka moninga na ye akozwa ngolu na suka koleka moto oyo alobaka maloba ya sukali.
Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga ; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na Ye.
Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.