Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te.
Tia ngai lokola kashe na motema na yo, lokola kashe na loboko na yo ; pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa, zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi. Moto ya bolingo epelaka makasi lokola kake kowuta epai na Yawe.
Kasi Bayuda mosusu basalaki zuwa ; bakendeki kozwa bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala, basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendeki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ebele ya bato.
Batondaki na lolenge nyonso ya misala ya sembo te, ya makambo mabe, ya lokoso, ya mabe, ya zuwa, ya misala ya koboma bato, ya koswana, ya kokosela baninga makambo mpe ya koyina bato ; bakomaki bato na songisongi,
Boye tika ete moko te azala lokola Kayina oyo azalaki moto ya Satana mpe abomaki ndeko na ye. Mpo na nini Kayina abomaki Abeli, ndeko na ye ? Ezali mpo ete misala ya Kayina ezalaki mabe, kasi misala ya Abeli, ndeko na ye, ezalaki sembo.