Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 27:3 - Mokanda na Bomoi

3 Libanga mpe zelo ezalaka kilo, kasi kanda ya zoba ezalaka kilo koleka nyonso mibale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 27:3
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete kanda na bango elakelama mabe, pamba te ezali makasi ! Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, pamba te ezanga mawa ! Nakokabola bango na Jakobi mpe nakopanza bango kati na Isalaele.


Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.


Kotomboka ya moto oyo azangi mayele eyebanaka kaka mokolo wana, kasi moto ya mayele abombaka soni na ye.


Kokutana na ngombolo oyo babotoli bana ezali malamu koleka kokutana na zoba oyo azali kati na bolema.


Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te ; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.


Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka ; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa ?


Nabukodonozori atombokelaki makasi Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, mpe akangelaki bango elongi ; apesaki mitindo ete bapelisa moto makasi penza mbala sambo koleka ndenge bapelisaka yango tango nyonso.


Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, evandelaki Balami, nkolo na yango. Balami atombokaki makasi mpe akomaki kobamba ane lingenda na ye.


Boye tika ete moko te azala lokola Kayina oyo azalaki moto ya Satana mpe abomaki ndeko na ye. Mpo na nini Kayina abomaki Abeli, ndeko na ye ? Ezali mpo ete misala ya Kayina ezalaki mabe, kasi misala ya Abeli, ndeko na ye, ezalaki sembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ