Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 27:23 - Mokanda na Bomoi

23 Yeba malamu ndenge bibwele na yo ezali, mpe kengela yango malamu,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 27:23
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Jakobi azongiselaki ye : — Oh nkolo na ngai ! Oyebi malamu ete bana bazwi nanu makasi te, mpe nazali lisusu na bameme, bangombe mpe bantaba ya basi oyo ezali nanu komelisa mabele. Soki tomeki kotambolisa yango mbangu makasi kaka na mokolo moko, bibwele nyonso ekokufa.


Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga.


Atako bongo, Faraon abalukaki, akotaki na ndako na ye mpe azwaki likambo yango na motema te.


Bongisa libanda ya mosala na yo, bongisa bilanga na yo, bongo na sima, tonga ndako na yo.


Tango natiaki makanisi na ngai kati na makambo oyo namonaki, nazwaki mayele oyo :


Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe, botatola yango na bisanga ya mosika ! Boloba : ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele akosangisa bango mpe akobatela bango ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye.


Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi.


Bino, bibwele na Ngai, bibwele oyo naleisaka, bozali bato ; mpe Ngai, nazali Nzambe na bino, elobi Nkolo Yawe. › »


Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda.


alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.


Lokola babateli bibwele, bobatelaka malamu etonga oyo Nzambe apesi bino mokumba ya kokamba. Bosalaka bongo kolanda mokano ya Nzambe : na kotindika te, kasi na komipesa mobimba ; na makanisi te ya konduka mbongo, kasi na posa makasi ya kosalela bango ;


Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki : — Oyaki awa mpo na nini ? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe ? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ