Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 27:22 - Mokanda na Bomoi

22 Ata soki otuti moto ya liboma na liboka elongo na mbuma, liboma na ye ekotikala te kolongwa kati na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 27:22
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako bongo, Jeroboami atikaki te banzela na ye ya mabe, akobaki kaka kotia bato ya mboka na ye lokola banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba ; abulisaki lokola nganga-nzambe ya esambelo ya likolo ya ngomba moto nyonso oyo alingaki kokoma nganga-nzambe.


Na butu wana, Faraon elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bato nyonso ya Ejipito batelemaki ; mpe koganga makasi ezalaki na Ejipito, pamba te ezalaki na ndako moko te oyo ezangaki ebembe.


Tango bayebisaki mokonzi ya Ejipito ete bana ya Isalaele bakimi, Faraon mpe bakalaka na ye babongolaki makanisi na bango mpo na bana ya Isalaele mpe balobaki : « Likambo nini oyo tosali ? Totiki Isalaele kokende mpe tozangeli bato oyo bakoki kosalela biso ! »


Monguna amilobelaki : « Nakolanda bango kino nakokanga bango, molimo na ngai ekotonda na biloko oyo nakobotola ; nakobimisa mopanga na ngai, mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »


Bozwi ya bato ya bwanya ezalaka lokola motole na bango, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele ezalaka lokola liboma.


Okoloba : « Babeti ngai, kasi nazali koyoka pasi te ; babeti ngai fimbu, kasi nazali koyoka eloko te ! Tango nini nakolamuka ? Nakozongela lisusu komela vino. »


Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi, ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye.


Boni, babeta bino lisusu wapi, bino bato oyo botingami kaka na botomboki ? Moto na yo mobimba ezali kobela, motema na yo mobimba ezali na pasi.


Boni, moto mwindo akoki solo kobongola poso ya nzoto na ye ? Nkoyi ekoki kolongola penza matono ya poso ya nzoto na yango ? Bokokoka kosala malamu te, bino bato oyo bomesana kosala mabe.


Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.


Sango ekomaki epai ya Saulo, mpe ye atindaki bato mosusu ; kasi bango mpe basakolaki. Saulo atindaki bato mosusu na mbala ya misato, kasi bango mpe basakolaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ